Sponsored Community Message Browse Free. Go deeper with Full Access. Free visitors can browse public knowledge. Full Access unlocks participation, member areas, and an ad-free experience.

Lingala Lessons (w/ Audio)-gctid84719

Started by Mani Kongo, Jun 19, 2013, 01:41 AM

Previous topic - Next topic
Based on the teachings of BWANTSA - KAFUNGU
Lingala text said by Jérôme Nkuna
 
LITEYA YANTUKU MINEI NAMITANO
FORTY-FIFTH LESSON
QUARANTE-CINQUIÈME LEÇON


1. Bǎna yangó bazalí monɛ́nɛ lokóla.
2. Mobáli azalí makási elekí mwǎsí.
3. Mobáli alekí mwǎsí namakási.
4. Mwǎna yamokɛ́ míngi.
5. Ndáko nangáí elekí monɛ́nɛ.
6. Tokokɛndɛ nasima yamikolo libwá.
7. Kalakala batatá nabísó  I  bazalákí kofánda motíndo mosúsu.
8. Makanisi óyo ezalí nantína tɛ̂.
9. Mbóka nangáí elekí yabínó namonɛ́nɛ.
10. Nalingí óyo alingí ngáí lokóla.
11. Moto óyo bozalí komɔ́na áwa.
12. Bandeko nabísó bánsɔ bakɛí, atá mɔ́kɔ́ alingákí kotíkala tɛ̂.
13. Azalí koloba elɔ́kɔ tɛ́, akoloba elɔ́kɔ tɛ̂.
14. Bǎna yangó bazalákí bozɔ́ba elekí.
15. Babundí mpé bazwí mbóka.
 
 1. These children are also grown.
 Ces enfants sont également grands.
2. The man is stronger than the woman.
 L'homme est plus fort que la femme.
3. idem.
4. A whole / too / much small child.
 Un tout/trop/beaucoup petit enfant.
5. My house is too big.
 Ma maison est trop grande.
6. We leave in 9 days.
 Nous partirons dans 9 jours.
7. Once your Ancestors lived another way.
 Autrefois vos Ancêtres vivaient autrement.
8. This project / idea does not make sense / is absurd.
 Ce projet/pensée n'a pas de sens /est absurde.
9. My village is bigger than yours.
 Mon village est plus grand que le vôtre.
10. I love the one who love me too.
J'aime celui qui m'aime aussi.
11. The man that you see here ...  
Cet homme que vous voyez ici ...
12. All our friends are gone, no one wanted to stay.
 Tous nos amis sont partis, aucun n'a voulu rester.
13. He does not say anything, he will not say anything.
 Il ne dit rien, il ne dira rien.
14. These children were too stupid.
 Ces enfants-là étaient trop bêtes.
15. They fought and captured the city / village.
 Ils combattirent et prirent la ville/village.
 
 MOMEKANO
 
 1. Bǎna yangó balekí mobáli óyo namakási.
2. Mwǎsí óyo alekí mokɛ́ míngi.
3. Afándákí mbúla sambo nandáko nangáí.
4. Motíndo yakofánda óyo ezalí nantína tɛ̂.
5. Nalobí nayɔ́ te : akoloba elɔ́kɔ tɛ̂.
 
 EXERCISE

 1. These children are stronger than this man.
 Ces enfants sont plus forts que cet homme-ci.
2. This woman is too small.
 Cette femme est trop petite.
3. He stayed 7 years with me (in my house).
 Il est resté 7 ans chez moi.
4. This way of being has no meaning.
 Cette manière d'être n'a pas de sens.
5. I tell you that he will not say anything.
 Je te dis qu'il ne dira rien.
 
  TO REMEMBER
 
  -When two vowels follow each other in a word, we must pronounce them separately, although the pronunciation is done very quickly : each vowel often has its own tone.
The vowel length does not matter.  
 -Lorsque deux voyelles se suivent dans un même mot, on doit les prononcer séparément, quoique la prononciation se fasse très vite : chacune des voyelles a souvent sa tonalité propre.
La longueur des voyelles n'a pas d'importance.

 -lek- surpass – dépasser
-bund-/-bun- fight – se battre

A syllable always ends with a vowel. We must therefore divide the word after a vowel : mí-ngi.  
Une syllabe se termine toujours par une voyelle. Il faut donc scinder le mot après une voyelle : mí-ngi.
                            Attached files  ling45.mp3 (658.4 KB)

Based on the teachings of BWANTSA - KAFUNGU
Lingala text said by Jérôme Nkuna
 
LITEYA YANTUKU MINEI NAMOTOBA
 FORTY-SIXTH LESSON
QUARANTE-SIXIÈME LEÇON

 
 Lisapo nabísó

 Moto mɔ́kɔ́, nkómbó te Mbatá, yě mosáli yakompaní, azalákí kosála mosálá yasínzílí. Bôngó, mokɔlɔ mɔ́kɔ́, Mbatá akangí mosikitɛ́lɛ nayé nambalasáni yandáko, mpó yakokíma mbɛ́mbɛ́lɛ́  I  nantángo yakolála; ayókí mpɔngí mpé alálí nayé nakáti yamosikitɛ́lɛ !
Nakáti yabutú, Mbatá ayókí moto mɔ́kɔ́ azalí kokáta singa yamosikitɛ́lɛ nayé, atúní :
- "Náni moto óyo ayéí kokáta singa yamosikitɛ́lɛ yangáí ?"
Nasima, Mbatá alingí ábima boye, mosikitɛ́lɛ ekwéyí nanzóto nayé; mokɛ́ boye, ayókí moto wâná apapí yě mpótá nalibɛkɛ mpé mokúwa ekátání.
Mobali óyo akátí yě mpótá mosúsu namotó, mbala míbalé ; mpótá monɛ́nɛ sɔ̂lɔ́ mpé yasɔ́mɔ ! Bôngó, Mbatá abimí namakási yamobali akɛí mbángo, abéngí bato, angángí makási :
- Baníngá aee, bóyâ aa ... nakúfí éé ! ...
Bato bayéí nɔkí, bakútí Mbatá alálí nasé, mpótá ezalí kobimisa makila ndɛ́ngɛ yasɔ́mɔ ! ótála mpótá yangó mbala míngi tɛ̂ !
Batúní yɛ̌ :
- Náni moto óyo akátí yɔ̌ mpótá ndɛ́ngɛ́ boye ?
Mbatá ayanólí te ayébí moto yangó tɛ́, mpé moto wâná asílí kokíma nayé kala ! (ekolanda)
 
  A man, by the name of Mbata, him worker of a company, worked as a night watchman. Thus, one day, Mbata tied his mosquito net in the barza of the house to escape the flies at bedtime ; he became sleepy and he slept inside his mosquito net.
In the middle of the night, Mbata heard a man cutting the strings of his mosquito net, he asked :
- Who is the man who came/comes to cut the strings of my mosquito net ?
Afterwards, Mbata wanting to go out like that, the mosquito net fell on his body (top) ; a moment later, he felt the man cutting him a big wound on his shoulder and the bone broke.
This man gave him another wound to the head, twice : a big scary wound ! Thus, Mbata, went out (still) with his strength of man/with its masculine strength, he went quickly, called people, screaming loudly :
- Friends, come quick ... I am dying ! ...
The men came quickly, they found Mbata lying on the floor, the gaping wound letting the blood flow in a frightening way. You could not look at the wound several times !
They asked him : - what man has cut you wounds of this kind ?
Mbata said he does not know him and besides he has already fled long ago. (to be continued)
 
 Un homme, du nom de Mbata, lui travailleur d'une compagnie, travaillait comme gardien de nuit. Ainsi, un jour, Mbata attacha son moustiquaire dans la barza de la maison pour fuir les mouches, à l'heure du coucher : il eût sommeil et il s'endormit à l'intérieur de son moustiquaire.
Au milieu de la nuit, Mbata entendit un homme qui coupait les ficelles de son moustiquaire,
il demanda : - Quel est l'homme qui est venu/vient couper les ficelles de mon moustiquaire ?
Après quoi, Mbata voulant sortir comme ça, le moustiquaire lui tomba sur le corps (dessus) ; un instant après, il sentit l'homme lui tailler une grosse plaie sur l'épaule et l'os se brisa.
Cet homme-là lui fit une autre plaie à la tête, deux fois : une grande plaie effrayante ! Ainsi, Mbata sortit (quand même) avec sa force de l'homme/grâce à sa force masculine, il s'en alla vite, appela les gens, en hurlant fort :
- Amis, venez vite ... je meurs ! ...
Les hommes vinrent vite, ils trouvèrent Mbata allongé sur le sol, la plaie béante laissant s'écouler le sang de façon effrayante. Tu ne pourrais pas regarder la plaie plusieurs fois !
Ils lui demandèrent : - quel homme t'a taillé des plaies de cette sorte ?
Mbata répondit qu'il ne le connaît pas et d'ailleurs il s'est déjà enfui depuis longtemps. (à suivre)

                            Attached files  ling46.mp3 (925.9 KB)

Based on the teachings of BWANTSA - KAFUNGU
Lingala text said by Jérô
me Nkuna
 
LITEYA YANTUKU MINEI NASAMBO
 FORTY-SEVENTH LESSON
QUARANTE-SEPTIÈME LEÇON

 
 Lisapo nabísó II
 
 Bato bakɛí kobénga mondɛ́lɛ́ yakompaní; mondɛ́lɛ́ ayéí. Lokóla amɔ́ní mpótá elekí monɛ́nɛ, bakɛí nambóka yamondɛ́lɛ́ yaLetá. Mondɛ́lɛ́ yaLetá apɛ́sí bangó kaminyɔ́ mpó yakokɛndɛ nalopitálo.
Kasi bakómí nanzelá, Mbatá akátí motéma mpé bazóngí nayé nambóka.
Kasi moto abomí moníngá ayébaní naíno tɛ́, téé lɛlɔ́ óyo.
Baníngá, mosálá yasínzílí ezalí mosálá yalikáma monɛ́nɛ. Malámu, sɔ́kí ozalí sínzílí, ólála tɛ́, ókéngɛlɛ butú mobimba  I  mpé ózala naebuneli nayɔ́ pɛnɛpɛnɛ.
Sɔ́kí moto ayéí koyíba bilóko tǒ koluka nzelá yakoboma yɔ̌, akútí yɔ̌ ozalí kokɛ́ngɛlɛ, akokí koyíba tɛ̂.
Kasi sɔ́kí yɔ̌ osílí nayɔ́ kolála, moyíbi akokí koboma yɔ̌, sikǎwa mpé akoyíba nayé bilɔ́kɔ yɔ́sɔ motéma nayé ekolinga.
 
  The men went to call a white (man) from the Company, the white (man) came. As he saw that the wound was too big they went to the white (man) of the State/Commissioner ; the Commissioner gave them a truck to go to the hospital.
But arrived on the road, Mbata gave up the ghost/cut his heart and they returned to the village.
On the other hand, the man who had killed his brother/another is not yet recognized/known until today.
My friends, being a night watchman is a very dangerous job. It is better, if you're watchman, do not sleep/you do not get some sleep, that you watch all night and that you're with your arms (weapons) close to you.
If someone comes to steal/steal things or look for the road to kill you/the means to kill you/kill you, (if) he finds you on the watch he will not be able to steal.
But if you have finished you fall asleep/you sleep, he can kill you and then he will steal things like his heart wants.  
 
 Les hommes s'en allèrent appeler un blanc de la Compagnie, le blanc vint. Comme il voyait que la plaie était trop grande ils s'en allèrent chez le blanc de l'Etat/Commissaire ; le Commissaire leur donna un camion pour aller à l'hôpital.
Mais arrivés en route, Mbata rendit l'âme/se coupa le coeur et ils rentrèrent au village.
Par contre, l'homme qui avait tué son frère/un autre n'est pas encore reconnu/connu, jusqu'aujourd'hui.
Mes amis, être veilleur de nuit est un métier très dangereux. Il vaut mieux, si vous êtes veilleur, ne dors pas/que tu ne dormes pas, que tu veilles toute la nuit et que tu sois avec tes armes tout près de toi.
Si quelqu'un vient voler/dérober des choses ou chercher la route de te descendre/le moyen de te tuer/à te tuer, (si) il te trouve en train de veiller, il ne pourra pas voler.
Mais si tu as fini de t'endormir/tu dors, il peut te tuer et après il volera des choses comme son coeur le voudra.

 
 TO REMEMBER

 -báng- call -- appeler
-yéb- know – savoir
-kɛ́ngɛl- keep – garder
-bun- fight – se battre
-ling- like – plaire
-pɛ́s- give – donner
-yéb-an- be known – être connu
-bom- kill – tuer
-yíb- steal – voler/dérober
-lál- sleep – dormir

 Each adjective follows the noun it qualifies. There are very few adjectives -> adjective phrases.  
 Chaque adjectif suit le nom qu'il qualifie. Il y a très peu d'adjectifs -> locutions adjectives.

                            Attached files  ling47.mp3 (641.8 KB)

Based on the teachings of BWANTSA - KAFUNGU
Lingala text said by Jérôme Nkuna

LITEYA YANTUKU MINEI NAMWAMBE


 Mobali abótí bǎna..
 
 Mokɔlɔ mɔ́kɔ́, nantɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ penzá, Mbólókó ayéí epái yanɔ́kɔ́ nayé Nkɔi, alobí :
- Nɔ́kɔ́, kotíkala boye, mosálá tɛ́, ezalí gɔigɔ́i míngi; malámu tókɛndɛ kotámbola nabazándo yóso mpó tósómba ngúlu. Ntángo yangó ekobóta, bísó tokokóma bato banɛ́nɛ nambóka nabísó.
Singa namabɔ́kɔ, sakɔ́si namokɔngɔ, bangó míbalé batámbólí. Bakómí nazándo, yɔ́sɔ ezalákí wâná. Moto namoto asómbí lokóla motéma nayé elingí. Nkɔi asómbí ngúlu yamwǎsí, Mbólókó asómbí yamobáli.
Sánzá míbalé elekí, ngúlu yaNkɔi ebótí bǎna mwambe, mpó yangó ezalákí nalibumu, libosó te Nkɔi ásómba yangó.
Mbólókó azalákí nayé kokɛndɛ kotála bǎna bangúlu yangó mikɔlɔ yɔ́sɔ Nzámbe asálí, epái yanɔ́kɔ nayé Nkɔi.
- Sɔ́kí ngáí mpé nakokí kozala nayangó míngi boye !
Mokɔlo mɔ́kɔ́, makanisi ekomélí yě fɔlí. Ayíbí, mpé abandí koyíbaka mwǎna yangúlu mɔ́kɔ́mɔ́kɔ́ nabutú, epái yanɔ́kɔ́ nayé Nkɔi. Akɛí kobɔ́kɔlɔ bangó epái yayémɔ́kɔ́ Mbólókó.
Nkɔi amɔ́ní te atíkálí mabɔ́kɔ pámba, akɛí kotála epái yamwǎna nayé Mbólókó.
- Mbólókó, yɔ̌ ozwákí bǎna bangúlu óyo wápi epái ? Nkoi atúní naMbólókó.
- Kasi nɔ́kɔ́ Mbólókó ayanólí yě, yɔ̌ oyébí naíno tɛ́ makambo ezalákí áwa  I  likoló yangúlu nangáí wâná yamobáli ?
Nkɔi azóngísí te : - "asálákí níni, ngúlu nayɔ́ yamobáli ?
- Kasi, ezalí bobɛ́lɛ́ yě moto abótákí bǎna bangúlu óyo yɔ́sɔ !
- Mobáli abótí ? Ekokí kozala sɔ́kí mokɛ́ tɛ̂. Yɔ̌ ozalí lokutá, wâná ezalí bǎna bangúlu nangáí. Nkɔi azalákí kongala.
- Bangáí ! Mbólókó azóngísí.
Ntɛmbɛ monɛ́nɛ esálámí wâná !
Nkɔi abéngí bato yɔ́sɔ yambóka mpó yakokáta likambo yangó : "Lóbí, lóbí, bínó yɔ́sɔ, bóyâ; Mbólókó akoyébisa bísó ndɛ́ngɛ níni ngúlu nayé yamobáli abótí."
Mbólókó atálí, mayɛ́lɛ yɔ́sɔ esílí. Akɛí, nabutú, koluka moníngá nayé Eséndé  I  mpó te ásálisa yě.
- Moníngá Eséndé mokɛ́, sálísá ngáí.
Mpé ayébísí yě makambo yɔ́sɔ :
- Nayíbákí bǎna bangúlu mwambe epái yanɔ́kɔ Nkɔi  I  mpé nakósí yě te  I  mobáli akokí kobóta. Mpó te nábíka, bísó tokosála boye : bato bakoyâ kosámbisa bísó lóbí, ngáí ná nɔ́kɔ́ Nkɔi nakáti yantángo. Bôngó, yɔ̌, nantángo yangó wâná, yɔ̌ okokátisa mbóka mobimba, namwâ mbángo. (ekolanda)
                            Attached files  ling48.mp3 (1.8 MB)

Based on the teachings of BWANTSA - KAFUNGU
Lingala text said by Jérôme Nkuna
 
LITEYA YANTUKU MINEI NALIBWA

Sókí okómí pɛnɛpɛnɛ nabísó, okobanda kolobaka nayɔ́mɔ́kɔ́.
Nantángo ngáí nakotúna yɔ̌ boye :
- Sɛmɛ́ki, ozali kokɛndɛ wápi nambángo boye ? Yɔ̌ okongánga namongóngó makási :
"Nakɛí koyébisa mamá te tatá abótí bǎna mísáto." Ngáí nakowéla yɔ̌ mpé bato bakokáta likambo.
Bayókání bôngó, Mbólókó azóngí namotéma bobóto nambóka nayé. Ntángo ekómí nangonga zómí namíbalé bampaka basámbisi mpé bayéí kofánda nasé yanzeté monɛ́nɛ  I  nakáti yambóka.
Mabóta míbalé ezalákí wâná : óyo yaNkoi ná óyo yaMbólókó.
Bamikóló balingí bákáta likambo boye, bamɔ́ní Eséndé azalí koleka, ákoyémba mpé ákolobaka nayémɔ́kɔ́ :
- Esɛngo káni ! famíliya nabísó ekómí nabǎna mísáto yasika, mpé mamá nabangó ndé tatá !
Mbɔ́lɔ́kɔ́ atɛ́lɛ́mí nakáti yabato mpé abéngí Eséndé, atúní yě :
- Moníngá nangáí, okɛí wápí nantángo boye, mpé ǒkolobaka níni yɔ́mɔ́kɔ́ ?
- Nazalí kokíma mbángo, Eséndé ayanólí, koyébisa mamá te tatá abótí bǎna mísáto.
Eséndé alobí bôngó, bato yɔ́sɔ bakwéyí namabelé, bakámwí !
 
- Bomɔ́ní, Mbólókó alandí, bozalákí kokamata ngáí lokóla moyíbi, kasi babáli míngi babótaka, lokóla lɛlɔ́ tatá yaEséndé.
Bato yɔ́sɔ bafándí nyɛ, elɔ́kɔ yakoloba ezalákí lisúsu tɛ̂. Mpé basámbisi bazalákí kolobana bangó nabangó te :
- Tozalí koluka níni lisúsu, makambo esí ekátání yangó-mɔ́kɔ́. Lokóla tatá yaEséndé abótí bǎna lɛlɔ́, ezalí káka sɔ̂ló te : bǎna bangúlu yaMbólókó bazalí mpé bǎna bangúlu nayé yamobáli.
Bato yɔ́sɔ balongwí ná kokámwa  I  mpó bayókákí makambo bayóká naíno tɛ́, útá babótá bangó.
Utá mokɔlɔ wâná, Mbólókó ná Nkɔi bakútanaka mpé balinganaka lisúsu tɛ́, téé lɛlɔ́ óyo.
 
 Translation ( Lessons 48 and 49)
 
One day, very early in the morning, the Gazelle (Mbólókó) came to the Léopard (Nkoi), her uncle, she said to him :
- My uncle, to remain unemployed like this is a great laziness, it is better that we go for a walk/travel all the market to buy hogs/pigs. And when they give birth we will become great people in our village.
 
Lianas in hand, game on their back, both of them set off. When they reached the market, everything was there. Each bought as his heart wanted/They bought each according to his choice. The Leopard bought a sow/female pig, the Gazelle bought a boar/male pig.
 
Two months later, the sow of the Leopard gave birth to eight young piglets, because it was fertile when purchased by the leopard.
 
The Gazelle used to come and admire them every day that God made with his uncle the Leopard.
- If I too could have a lot of them like this !
 
One day, this thought became her hallucination ; she stole and began to steal a piglet every day.
 
Finding himself empty handed, the Leopard went to see her niece the Gazelle.
- Mboloko, where did you find all these piglets ? asked the Leopard.
- But, my uncle, replied the gazelle, you still do not know what happened about my boar ?
- Your boar, the Leopard retorted, what has he done ?
- But it was he who gave birth to all these piglets.
- A male who gives birth, it can not be at all. You're a liar, these are my piglets, screamed the Leopard.
- They mine, replied the Gazelle.
 
A lengthy discussion ensued.
The Leopard called all the men of the village to judge this story : "Tomorrow, tomorrow, come all, the Gazelle will explain how/by what spell/by what means at last, her boar has given birth. "
 
The Gazelle ran out of malice. She went at night for her friend/cousin The Squirrel for him to help her.
- My cousin, Squirrel, help me.
She told him the whole story, she said :
- I stole eight piglets from uncle Leopard, and I lied to him that "a male can give birth."
 
And for me to be saved, we will act like this : they will come to judge us tomorrow, me and my uncle the Leopard : and therefore, you, in the meantime you will cross the whole village, running a little, and talking to you alone to yourself. So when I will ask you : - Where are you going running like this, my cousin ?
You will cry aloud :
 
- I'm going to tell my mother that my father just gave birth to three twins.
Me, I will defend you and the men will judge the case.
Having come to an agreement, the gazelle went home quietly. When it was 12, the old judges also came to sit under the big tree in the middle of the village.
There were two families : that the Leopard and that of the Gazelle.
When the elders wanted to judge the case, they saw the squirrel passing by quickly singing and talking to himself :
- What a joy ! our family now has three more new children, and their mother is our daddy!
 
The Gazelle stood in the middle of the crowd, called the Squirrel and asked him :
- My cousin, where are you going under this sun, what do you say ?
- I 'm leaving, said the Squirrel, to quickly inform mom that dad just gave birth to three twins.
 
When the Squirrel had spoken, everyone fainted.
- You see, continued the Gazelle, you were taking me for a thief, whereas many males give birth, as now the father of the Squirrel.
 
Everyone remained silent; there was nothing to say, and the judges were saying among themselves :
- What are we looking for again, the case is decided on its own. As the father Squirrel has given birth, it is clear that the piglets of the Gazelle are those of her boar.
 
People left the meeting all amazed, because they were unprecedented things coming since their birth .
Since that day, the Gazelle and her uncle the Leopard no longer feel each other (closely).
We are often judged without valid evidence.  
 
 Traduction (Leçons 48 et 49)

 Un jour, de très grand matin, la Gazelle (Mbólókó) vint chez le Léopard (Nkoi), son oncle ; elle lui dit :
- Mon oncle, rester comme cela sans travail est une grande paresse ; il vaut mieux que nous partions nous promener/voyager à travers tous les marché pour acheter des porcs/cochons. Et quand ils mettront bas nous deviendrons de grands personnages dans notre village.
 
Lianes à la main, gibecières au dos, tous les deux se mirent en route. Quand ils arrivèrent au marché, tout était là. Chacun acheta comme son coeur le voulait/Ils achetèrent chacun selon son choix. Le léopard acheta une truie/cochon femelle, la gazelle acheta un verrat/cochon mâle.
 
Deux mois plus tard, la truie du léopard mit bas huit jeunes porcelets, parce qu'elle était féconde lors de son achat par le léopard.
La gazelle avait l'habitude de venir les admirer tous les jours que Dieu a fait, chez son oncle le léopard.
 
- Si moi aussi je pouvais en avoir beaucoup comme ceux-ci !
Un jour, cette pensée lui devint une hallucination, elle vola et commença à voler un porcelet chaque jour.
 
Se trouvant les mains vides, le léopard alla voir chez sa nièce la gazelle.
- Mboloko, où as-tu trouvé tous ces porcelets ? demanda le léopard.
- Mais, mon oncle, répondit la gazelle, tu ne saurais pas encore ce qui est arrivé au sujet de mon verrat ?
- Ton verrat, rétorqua le léopard, qu'a-t-il fait ?
- Mais c'est lui qui a mis bas tous ces porcelets.
- Un mâle qui met bas, ça ne se peut pas du tout. Tu es un menteur, ce sont mes porcelets, hurla le léopard.
- Les miens, rétorqua la gazelle.
 
Une longue discussion s'en suivit.
Le léopard appela tous les hommes du village pour juger cette histoire : "Demain, demain, venez tous, la gazelle nous expliquera comment/par quel sortikège/par quel moyen enfin, son verrat a mis bas."
La gazelle se trouva à court de malice. Elle alla, la nuit, chercher son ami/cousin l'Ecureil pour qu'il l'aide.
- Mon cousin, Ecureil, aide-moi.
Elle lui raconta toute l'histoire, elle dit :
- J'ai volé huit porcelets chez l'oncle léopard, et je lui ai menti que : "un mâle peut mettre bas.".
 
Et pour que je sois sauvée, nous agirons comme ceci : on viendra nous juger demain, moi et mon oncle le Léopard : ainsi donc toi, en ce moment-là, tu traverseras tout le village, en courant un peu, et en te parlant tout seul à toi-même. Alors quand je te demanderai : - Où vas-tu comme cela en courant, mon cousin ?
Tu crieras à haute voix :
 
- Je vais avertir ma mère que mon père vient de mettre bas trois jumeaux.
Moi, je te défendrai et les hommes jugeront l'affaire.
S'étant entendus ainsi, la gazelle rentra tranquillement chez elle. Quand il fut 12h, les vieux juges vinrent aussi s'asseoir sous le grand arbre au milieu du village.
Il y avait deux familles : celle du Léopard et celle de la Gazelle.
Quand les vieux voulurent juger l'affaire, ils virent l'écureil passer en vitesse en chantant et en parlant tout seul :
- Quelle joie ! notre famille a maintenant trois nouveaux enfants en plus, et leur maman c'est notre papa !
 
La Gazelle se leva au milieu de la foule, appela l'Ecureil et lui demanda :
- Mon cousin, où vas-tu sous ce soleil, que dis-tu ?
- Je m'en vais, dit l'Ecureil, avertir vite maman que papa vient de mettre bas trois jumeaux.
 
Quand l'Ecureil eut parlé, toute le monde tomba évanoui.
- Vous voyez, poursuivit la Gazelle, vous me preniez poue une voleuse; alors que beaucoup de mâles mettent bas, comme aujourd'hui le père de l'Ecureil.
 
Tout le monde resta silencieux ; il n'y avait rien à dire ; et les juges se disaient entre eux :
- Que cherchons-nous encore, l'affaire est tranchée d'elle-même. Comme le père Ecureil a mis bas, il est clair que les porcelets de la Gazelle sont ceux de son verrat.
 
Les gens quittèrent la séance tous étonnés, car ils venaient des choses inédites depuis leur naissance.
Depuis ce jour, la Gazelle et son oncle le Léopard ne se sentent plus (de près).
On nous juge souvent sans preuves valables.


                            Attached files  ling49.mp3 (1.4 MB)


This list of lessons I posted below will make all the lessons more easily accessible.
Any corrections of possible mistakes, comments, questions, please feel free.